27
© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani Epekisaka Minyoko I’m Afraid to Go Back” A Guide to Asylum, Withholding of Removal, and the Convention Against Torture (Lingala) Botambwisi oyo ebongisamaki mpe endimbolami na basali ya kala ya bapaya ya Florence & mosala ya ntomo ya batu oyo bakima bitumba mpe ekomamaki pona bapaya na boloko ya Arizona ba oyo bazali komimonisi bango- moko nakati ya nzela ya komilongola. Botambwisi yango ezali koluka te kopesa toli ya alima tope kosala lokola bozwi ya toli ya mambi ma mibeko. Mosala ya Florence ezali ebongeseli ya misala oyo etosani na mibeko ya ofele mpe efutisaka te pona bosungi(misala) na bapaya ya boloko na Arizona. Botambwisi oyo ezali kobatelama na mibeko ya boka kasi ekoki kokabolama mpe kopesama esika nyonso kosalisa bapaya bazo kimela na kati ya mboka. matambwisi nyonso na biso eza ya kozwa na kotelecharge na siteweb na biso:www.firrp.org. Tozali kosenga ete opesa makanisi na projet Florence soki ozali komi adapte na maloba nakati ya motambwisi oyo nakati ya maloba nayo-moko.

Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

  • Upload
    others

  • View
    0

  • Download
    0

Embed Size (px)

Citation preview

Page 1: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 1

"Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya

Kolongola, mpe Liyangani Epekisaka Minyoko “I’m Afraid to Go Back”

A Guide to Asylum, Withholding of Removal,

and the Convention Against Torture

(Lingala)

Botambwisi oyo ebongisamaki mpe endimbolami na basali ya kala ya bapaya ya Florence & mosala ya ntomo ya batu oyo bakima bitumba mpe ekomamaki pona bapaya na boloko ya Arizona ba oyo bazali komimonisi bango-moko nakati ya nzela ya komilongola. Botambwisi yango ezali koluka te kopesa toli ya alima tope kosala lokola bozwi ya toli ya mambi ma mibeko. Mosala ya Florence ezali ebongeseli ya misala oyo etosani na mibeko ya ofele mpe efutisaka te pona bosungi(misala) na bapaya ya boloko na Arizona. Botambwisi oyo ezali kobatelama na mibeko ya boka kasi ekoki kokabolama mpe kopesama esika nyonso kosalisa bapaya bazo kimela na kati ya mboka. matambwisi nyonso na biso eza ya kozwa na kotelecharge na siteweb na biso:www.firrp.org. Tozali kosenga ete opesa makanisi na projet Florence soki ozali komi adapte na maloba nakati ya motambwisi oyo nakati ya maloba nayo-moko.

Page 2: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 2

Mesa ya maye maza na kati 1. Ebandelisi: Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani Epekisaka Minyoko ezali nini?

a. Azile ezali nini? b. Koboya kolongola ezali nini? c. Liyangani Epekisaka Minyoko ezali nini, "CAT?" (LEM)

2. Lolenge nini nakoki kosenga Azile, Koboya Kolongola, tope Liyangani Epekisaka Minyoko?

a. Mbala ya liboso na yo ya koyokama na esambelo b. Endimami ya Azile, Koboya Kolongola, mpe CAT(LEM) c. Kotindisa makambo mpe kozongisa mokanda yango

3. Kotonga makomba nayo ya case pona Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani Epekisaka Minyoko 4. Kombongisa litatoli na yo 5. Kopeze Emonisi(Evidance): Monkano ya Mosambisi 6. Makanisi ya suka 7. Apendisi 1: Tondisa Lisengi Nayo 8. Apendisi 2: Kokanisa Mpona Bosengi Bwayo 9. Apendisi 3: Ndakisa ya Mokanda ya Lisalisi 10. Apendisi 4: Ndakisa ya Mokanda ya Bobongoli

Page 3: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 3

1. Ebandelisi: Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani Epekisaka Minyoko eza nini?

{ut1Etats-Unis esi esali mibeko ya kosalisa bato oyo bazali kobanga kozonga na bamboka na bango mpona loyalo na bango ekoki kosala bango mabe}1. Mibeko yango ebengami Azile Koboya Kolongola Liyangani Epekisaka Minyoko, to pe "CAT"(LEM) na mokuse. Etambwisi oyo ekopesa yo bamposa pona mibeko oyo mpe eko yebisa yo lolenge nini okoki kosalela mibeko oyo mpona kopekisa kozongisama na mboka nayo. Toko solola pe ndenge nini koningisa mpe emonisi ya ndenge nini osengeli kozala na yango

pona case makasi.

"Azile" eza nini? "Azile" ezali nzela ya kopekisa bobimisi bwayo po okomi refugé. Soki olongi " Azile," okozala pe na libaku nsuka-nsuka ya kozwa mikanda ya kofanda libela na Etats-Unis. Soki obakisi mwasi nayo to bana bayo na mokanda(document)na yo, bakoki pe kozala na libaku ya kokoma barefugé mpe kozwa mikanda ya kofanda libela na sima nayo. Mpo olonga kosambisama ya "Azile,"esengeli olakisa ete libaku ya ata zomi likolo ya kama loyalo ekosala yo mabe na mboka na yo.

Bwaka liso na etanda na liboko ya mwasi. Esika ya motane elakisi libaku ya mabe mingi oyo esengami pona masambisi ma "Azile": 10%. Na maloba mosusu, esengeli olakisa ete ozali na libaku ya makasi ete okosamela mabe, kasi esengeli nayo te olakisa ete ekosalema ya solo.

Page 4: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 4

Maye malandi mazali mosusu ya makambo ya ntina pona kolonga bosambisi ya "Azile:"

Esengeli olakisa ete likama okozwa to ozwaki na mboka nayo ezali na makasi mingi. Etaleli mibeko ya likama yango ezali "Minyoko." Likama makasi tokoki kotya kobetama, Koyibana, kosalema mabe, to kobomama, to kozala na moto ya libota oyo asalema mabe na ndenge wana. Esengeli ozwa emonisi ya likama yango. Esengeli olakisa ete loyalo yango moko to bato ya loyalo

bakoki te, to bakopekisa bango te baya kosala yo mabe. Loyalo ezali polisi, soda, to mokonzi nyonso oyo akosala yo mabe lokola kati ya mosala na ye. Okoki pe kolakisa ete loyalo ekokoka te to ekoki kobatela yo te na bato bazosala yo mabe. Ndakisa, okoki kolakisa ete omemaki (otindaki) likama wana na polisi kasi nde basalaki ata eloko te ya kosalisa yo.

Esengeli olakisa ete bato yango bazo sala yo mabe mpona

loposo na yo, lingomba, likolo, makanisi ya politiki, to kozala mosangani ya "bituluku ya ndenge na ndenge." Ekoki te kaka oloba ete mosali ya polisi abetaki yo, na ndakisa. Osengeli kolakisa ete mosali ya polisi asalaki yango mpo na loposo ya nzoto na yo, lingomba, likolo, makanisi ya politiki, to kozala mosangani ya "bituluku ya ndenge na ndenge."

Tika tokenge malembe na tango oyo. Okoki omituna, "bituluku ya ndenge na ndenge eza nini?" Yango ezali etali mibeko ya kolobela bato oyo basangani oyo bayebani na ekolo na yo. Bat ya bosangani esengeli bazala na makambo moko ya lisanga oyo bakoki kobongola te.

Page 5: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 5

Esengeli olakisa ete okoki te kokende na esika mosusu na mboka nayo epai wapi okoki kozala malamu. Mosambisi akolinga koyeba soki okoki kotambola mpe kozala te elongo na bato oyo balingaki kosala yo mabe. Kanisa bantina nini ekoki kosala yo otambola te, kotya charge,esika libota nayo ezo vanda, mpe esika okoki kozwa mosala.

Esengeli osenga "Azile" na kati ya mbula moko ya kokota na Etats-Unis. Okoki pe komeka kolakisa ete okokaki ata mke te yo osenga azile na kati ya mbula moko ya kokota na Etats-Unis. Ekoki kozala ete ozalaki kobela to makambo na mboka nayo esi ebaluki mikolo oyo.

Esengeli olakisa ete kala bazongisaki yo te na mboka. Soki osi

ozongisamaki, okoki te kosenga "Azile." (Yeba ete, kozonga na bolingi yayomoko ekesani na kozongisama.)

Esengeli olakisa ete ozali na krime te ya koleka. Makambo

mosusu ya mabe oyo ekotisa yo boloko ekoki kopekisa to kotia kokoso na dossier nayo ya "Azile" to etia libanga yo osenga yango.

b. "Koboya ya kolongola" ezali nini?

Koboya ya kolongola ezali lolenge moko na "Azile." Esengeli kaka olakisa mosambisi ete ozali na makoki ozwa likama soki ozongi na mboka nayo na moko ya bantima mitano ya lolenge etangami likolo. Eloko ya MONENE oyo ekokani te ezali ete libaku ya likama oyo osengeli kolakisa ezali ebele penza koleka lolenge ezali pona "Azile." Okosengela

kolakisa ete ezali"kosamela koleka te"ete okosemelama mabe na mboka na yo. Oyo elobi ete ozali na 51% ya libaku ete loyalo ekosala yo mabe.

Bwaka liso na etanda na liboko ya mwasi. Esika ya motane elakisi libaku ya mabe oyo

Page 6: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 6

osengeli kolakisa Mosambisi. Esika ya motane awa ezali monene makasi koleka ya bosengi ya"Azile"-- 51%. Oyo elobi ete kosengama kolakisa mosambisi ete okosamelama mpenza mabe na ekolo mboka nayo. Makambo mosusu oyo esengeli ezala pona "Koboya ya Kolongola" ezali ya lolenge moko na oyo ya "Azile:"

Esengeli olakisa ete ozali na libaku ete osamelama mabe na loyalo na kati ya ekolo mboka nayo. Yeba, pona "koboya ya kolongola," ete libaku esengeli kozali "ebele ya kosalema koleka kosalema te," to libaku ya 51%.

Esengeli olakisa ete likama okozwa to ozwaki na mboka nayo ezali na makasi mingi. Etaleli mibeko ya likama yango ezali "Minyoko." Likama makasi tokoki kotya kobetama, kokota boloko, Koyibana, kosamela mabe, to kobomana, to kozala na moto ya libota oyo asamela mabe na ndenge wana. Esengeli ozwa emonisi ya likama yango.

Esengeli olakisa ete loyalo eko sala yo mabe mpo na loposo ya nzoto na yo, lingomba, likolo, makanisi ya politiki, to kozala mosangani ya "bituluku ya ndenge na ndenge." Lisusu, ekoki te kaka koloba ete mosali ya polisi abetaki yo, na ndakisa. Esengeli olakisa ete mosali ya polisi asalaki yango mpo na loposo ya nzoto na yo, lingomba, likolo, makanisi ya politiki, to kozala mosangani ya "bituluku ya ndenge na ndenge."

Kasi nde, makesani ya minene oyo ekokani te ezalaka na kati ya "Azile" mpe "Koboya ya Kolongola:"

Okokoka te kozwa mikanda ya kofanda libela (kalati ya langi ya pondo) na "Koboya ya kolongola" Kolonga esambisi ya "koboya ya Kolongola" elobi kaka ete loyalo ya Etats-Unis ekozongisa yo te na ekolo mboka na yo. Soki ekolo mboka mosusu oyo ekoki kondima yo ezali, ICE ekoki komeka

kotinda yo kuna.

Page 7: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 7

Okoki te kosengela libota na yo kozwa "Koboya ya Kolongola" kolekela dossier na yo. Soki olongi esambisi na yo ya "Koboya ya Kolongola" bato ya libota nayo bakokoka tekozwa statute wana.

Okoki kosenga "Koboya ya kolongola" ata soki esali ba mbula ebele koleka mbula moko ntango okotaki na Etats-Unis. Yango ekeseni na "Azile," epai osengeli kolakisa ete osengaki na kati ya mbula moko sima ya bokoti na Etats-Unis.

Okoki kosenga "Koboya ya Kolongola" atako ozali na motindo moleka mwa kobenganama.

Okoki ntango mosusu kosenga "Koboya ya Kolongola" atako

ozalaki moto ya mobulu. Makambo ya mobulu mpanza oyo ekotisa yo na boloko ekoki kopekisa yo kosenga (Kotosamela).

c. "Liyangani Epekisaka Minyoko," to "CAT"(LEM) ezali nini?

Kolonga esambisi ya "Liyangani Epekisaka Minyoko," to "CAT"(LEM), esengeli olakisa ete ekozala mpenza koleka te ete loyalo eko minyoko to koboma yo na mboka na yo. Na nzela mosusu, esambisi ya"CAT" ezali ya lolenge moko na ya "Azile" mpe "Koboya ya Kolongola:"

Esengeli olakisa ete Loyalo lokominyoko to lokoboma yo to ete gloyalo lokobude yango soki moto mosusu ameki ko minyoko to koboma yo. Esengeli olakisa ete moto oyo akosala yo mabe azali mosali ya loyalo—moto na polisi, armée, to asalaka lokola mosali. Okoki pe kolakisa ete loyalo lokobude yango soki bato balingi kosala yo mabe.

Page 8: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 8

Lokola "Koboya ya kolongola,"ekosenga olakisa libaku ya minyoko ya 51%, to ete ekoki"kosamela mpenza koleka kosamela te".

Makambo ya mobulu makasi ekoki kobebisa soki okoki kosenga

"CAT." Soki ozalaki moto ya mobulu mpenza, okokoka kaka kosenga parti moko ya "CAT" oyo ebengami "report ya kolongola."

Esambisi ya "CAT"(LEM) ekeseni na "Azile" mpe "Koboya ya kolongola" na banzela mosusu:

Okosengama olakisa ete okozala minyokoni, kosamela kaka mabe te. Minyoko elimbolami ete moto asaleli makanisi ya mabe mpenza to mpasi ya nzoto pona ko forcé yo osala eloko moko to apesa yo etumbu.

Lokola "Koboya ya Kolongola," kolonga esambisi ya "CAT"(LEM) elimboli te okozwa mokanda ya kofanda libela. Ezali kaka kopesa yo bokitisi motema ete ICE ekozongisa yo te na ekolo mboka nayo. Soki ozali na mboka mosusu oyo bakondima yo, ICE ekoki komeka mpe atinda yo kuna. Mpe, soki opesami "Report ya kolongolama" na nse ya CAT(LEM) mpe makambo na mboka na yo ebaluki, ICE

ekoki komeka mpe kozongisa yo na nsima.

Ekosengama te olakisa ete okozala na minyoko mpo na loposo ya nzoto na yo, lingomba, likolo, makanisi ya politiki, to kozala mosangani ya "bituluku ya ndenge na ndenge." Esengeli omonisa ezali ete okozala minyokoni na mosali ya loyalo, kasi esengeli te olakisa pona nini moto wana ako minyokola yo.

2. Lolenge nini nakoki kosenga "Azile," "Koboya ya kolongola," to "Liyangani Epekisaka Minyoko?"

Page 9: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 9

a. Mbala ya liboso na yo ya koyokama na esambelo Yayambo, tika naino tosololela makambo yase ya ntina ya esambelo ya bapaya. Soki ozo bunga pona esambelo, ozali yo moko te! Mibeko ya bakimi ezali ya kotungisa mingi, ata epai ya balobeli. Totalela nani akokende na esambelo mpe likambo nini ekosamela na kati ya boyokani na yo ya liboso.

Mosambisi akozala liboso na disuku ya esambelo mpe akozala kotuna yo mituna, Akolata lokola mobali oyo afandi na liboko ya mwasi. Mosambisi akobanda kosala ekatani pona esambisi nayo sik’oyo esengeli ozala na limemya, bonkonde, mpe komibongisa.

Molobeli ya loyalo. Tango okokende na esambelo, molobeli oyo

azali emonisi ya ICE akozala wana. Abengami prokirere ya loyalo. Mosala naye ezali ya kotosisa mibeko ya bapaya, oyo ekoki kozala mobeko ya kobengana oyo ekotemela yo.

Mobongoli. Kobanga te soki osololaka na Anglais te—Mobongoli

akozala wana ye moko to na telefone. Tala kaka ke osololi mpenza mpe oyebisi Mosambisi (IJ) ete olobaka te to oyeba anglais malamu te mpe olingi mobongoli.

Tango okokende na esambelo, Mosambisi akotuna yo soki olingi bapesa yo tango ya kozwa molobeli. Kasi, okozala na balobeli ya bato banso te, bongo BALOBELI YA OFELE bazalaka baike penza kati ya esambelo ya bapaya (bakimi). Yango wana, mosambisi azali kotuna mpenza soki okolinga kofutela molobeli na mbongo ya posi yayo moko.

Page 10: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 10

Yakolanda, mosambisi akotalela dossier nayo mpe akotuna yo soki olingi kondima to koboya makambo bafundeli yo. Yango elingi koloba ete Mosambisi alingi koyeba soki olingi koforce loyalo endimisa bifundeli pona yo. Soki molobeli ya loyalo alobi ete esengeli obenganama mpo na makambo nayo ya mobulu, sala ye andimisa kolakisa bifundeli pona yo ekoki kozala toli ya ntina. Po oyeba ebele lolenge ya koboya bifundeli pona yo, tanga etambwisami ya Mosala ya Florence na masolo yango. Boyambi ya sikisiki mosusu ya mobulu ekoki kosala yango mpasi pona yo kosenga "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT," sikoyo ezali na ntina mingi mpenza ozala ekenge liboso ondima eloko nyonso pona likambo na yo ya mobulu. b. Kokokisama ya "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT"(LEM) Soki Mosambisi azwi ekateli ete bifundeli mosusu pona yo eza ya solo, akotuna yo sikoyo soki ozali kobanga kozonga na ekolo mboka nayo. Ezali na ntina mingi mpenza koyebisa ye ete ozo banga kozonga na ekolo mboka. Soki osali te, okoki kozanga libaku nayo ya kosenga "Azile," "Koboya ya Kolongola," to "CAT."(LEM) Mosambisi akotuna mituna pona koyeba mpenza ete okokisi makambo nyonso esengeli ya kosenga "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT."(LEM) IJ akopesa yo sik’oyo kopi ya formilereya I-589, yango nde okosalela pona kosenga. Okosalela formilere moko pona kosengala "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT."(LEM) Kanisa, kaka lokola Mosambisi alobi ete okokisami ya kozwa "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT" elobe te ete olongi esambisi nayo! Esengeli koloba ete Mosambisi amoni ete okokisi makambo nyonso ya ntina mpe ekoki kopesa yo libaku ya kolakisa ye emonisi ete okoki kosamela mabe soki okei ndako. c. Bondisi yango mpe Bokotisi mikanda ya bosengi

Page 11: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 11

Yambo ya boyokami nayo ya suka, okozonga na esambelo pona ngonga moko ya koyokama ya"manaka ya mokonzi" ya kotondisa formilere ya bosengi ya "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT." Ezali na ntina mpenza ete otondisa formilere nyonso mobimba mpo ete Mosambisi andima yango mpe kosala programe ya

koyokama ya suka pona yo olakisa baemonisi na yo nyonso. Okoki kotondisa formilere na yo na masini to kosalela biki kotondisa yango. Kosalela kreyo te!

Kozali na biteni moko ya maloba ebele ya ndenge ya kotondisa formilere nayo na suka ya liboke oyo. Bwaka lisu wana soki ozali na mituna mpo na bisika ya formilere. Tango okosilisa kotindisa formilere, sala bakopi misato ya koleka mpe yaka na yango na esambelo. Ya solo mpe kopi moko eko kende epai ya Mosambisi. Kopi mosusu ekokende epai ya molobeli ya loyalo mpe yo okotikala na kopi moko yayo moko. Oyo ezali ya malonga, sikoyo kobosana te! Soki kaka ozongisi formilere nayo, mosambisi akopesa yo mokolo ya koyokama ya suka. Na koyokama oyo, okoya yo moko kozala na ekanga ya boloko te. Koyokami ekoumela ngonga moke. Boyokami oyo ekozala elena nayo ya komonisa esambisi nayo epai ya mosambisi.

3. Kotonga esambisi nayo pona "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT."

Kotonga esambisi nayo pona "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT ezali ebele kaka lokola kotonga ndako. Okozala na mposa ya bisaleli ya malamu, plan ya kitoko mpe ebandeli to fodasyo ya makasi. Esika oyo ekosalisa yo kozwa bisaleli nayo nyonso mpe biloko ya kotongela ekobongisama mpe kobanga kotonga.

Kesi na Ngai Ezali na Biloko Nini?

Page 12: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 12

Ndenge "Olobaki" Tobanda na kosolola mpo na ndenge "olobaki." Kosakola ezali lisolo nayo na kokoma oyo ezo yebisa Mosambisi pona nini ozali kobanga kozonga na mboka na yo. Lisolo oyo ekomami etikaka yo oloba masolo nayo mobimba ya oyo elekaki na ekolo mboka nayo mpe pona nini ozali kobanga kozonga. Na esambelo mosambisi akoki kotuna yo mituna ebele to okoki koyoka lokola okozala na libaku te ya kolimbola makambo nyonso. Kosakola ezali libaku nayo ya koloba makambo nyonso kozanga kokatama.

Lolenge nini "kosakola"na ngai ekomonana? Okoki kokoma kosakola na yo na papier to na masini to kobimisa yango. Esengeli kozala molai makasi mpenza pona kozwa makambo nyonso ya ntina mpo na esambisi na yo. Soki okosalela papye ya pamba, tiya nkombo nayo, A-nomba, mokolo, mpe sinyatire na yo na lokaso mokomoko. Lisusu, koma "Kosakola" na likolo Esengeli obakisa yango na suka ya kosalela I-589.

Nini esengeli ezala na "kosakola"na yo?

Bosolo. Eloko ya ntina mingi ya kotya na kosakola na yo ezali

bosembo. Soki okosi na kati ya kosakola, Mosambisi mbala mosusu akoyeba yango mpe akoboya kosalela yango. Soki okoki te kokanisa likambo, salela bafalaze lokola, "Na makoki ya makanisi ngai," to "Esalemi zingazinga ya..."

Bantina nini esengeli olonga esambisi na yo pona "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT." Mosala nayo ezali kosala ete Mosambisi ayeba pona nini ozo banga kozonga na ekolo mboka na yo mpe pona nini esengeli apesa kosalela nayo ya "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT." Kanisa mpona makambo esengeli pona moko-moko ya esambisi liboso obanda kokoma kosakola nayo! Kanisa, okoki ntango nyonso

Page 13: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 13

kosalela etanda ya mituna na suka ya maoke oyo ebengani "Kanisa pona bosengi nayo" kobongisa makanisi nayo.

Makambo nyonso lokola ezali. Mosambisi alingi koyeba nini ozobanga ekozwa yo. Meka kosalela maloba ya polele. Mosambisi ayebi eloko te pona yo mpe ekoki kozala mpenza ete akoma te na ekolo mboka nayo. Ntango ozali kolobela likambo ya ntina na bomoi nayo – Ndakisa, tango ozalaki kokanela, kokangama, minyokoli to kosalema mabe to ete moto asali yo oyoka kobanga – olingi kosala Mosambisi asimba, amona, ayoka nsolo, yoka na nzoto, mpe ayoka na matoi oyo omonaki, oyokaki nsolo mpe oyokaki na matoi nayo.

Na suka ya etambwisami oyo, okozwa etanda moke ya kosalisa yo kobongisa kosakola nayo. Meka kopesa yango nyonso okoki, na nsima meka kokoma bosakoli na yo.

Kosunga emonisi Ezali na ntina mingi kozwa emonisi mosusu kolakisa Mosambisi ete oyo ozali koloba na kosalela nayo pe kosakola ezali ya solo. Moto nyonso azosenga "Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT" azali na esambisi ekeseni te, sikoyo emonisi okozala koluka ekotalela esambisi nayo moko.

Toyebi ete ezali mpasi mpenza koyanganisa emonisi soki ozali ya kokangama mpe mikanda ezali na mboka mosusu. Senga moninga oyo otyaka motema to moto ya libota azwila yo mikanda. Senga moto wana atindela yo bakopi ya emonisi na e-mail mpe atikala na oyo ya solosolo. Ezali pe na ntina kobongisa makambo liboso mpe kobanga koyanganisa bamonisi ntango kaka ozwi ekateli olingi kosenga

Page 14: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 14

"Azile," "Koboya ya Kolongola," mpe "CAT." Yango wana, okozala na tango nyonso ya kozwa mikanda nyonso olingi. Na nse ezali ba ndakisa mosusu ya mikanda oyo ekoki kozala ya malonga. Kanisa, lolenge ya bamonisi oko yangama ekotalela esambisi na yo moko.

Report ya polisi (Soki omemaki likambo na polisi) Makundoli ya minganga (Soki ozalaki kozoka mpe kotalelama na

lopitalo to klinike) Certificat ya mbotama to ya liwa (soki moto moko na libota na

yo babomaki ye na bato ozali kobanga) Mikanda ya bato oyo bakoki kosunga elobami na yo ya pona nini

ozali kobanga kozonga na mboka na yo. Kozali moto ya libota nayo oyo amonaki bato bakanela yo to kobeta yo? Soki eza bongo, mokanda euti na moto wana ekosalisa yo omonisa elobami na yo.

Bafoto oyo ekosalisa komonisa likambo na yo (ndakisa, bafoto na yo na bato oyo bakufa, to bafoto yayo na kosangamana na etukulu to makambo oyo etya yo na likama). Yeba ete okosengama olakisa bato baza na kati ya bafoto bazali banani.

Masolo ya zulunale mpona makambo oyo ezo sala yo obanga kozonga na mboka na yo, to mpona makambo oyo esalemana epai ya bato oyebi

Baraport ya ebongiseli ya makoki ya moto ya mboka mpe ya libanda (lokola Makoki ya Moto ya Kotala to Amnesty International)

Yeba, mikanda nyonso okotinda esengeli kozala na lingelesa. Soki ozwi mikanda na monoko mosusu, okoki kobongola yango. Tya kaka kobongola na yo na kati ya mikanda mpe zinga kopi oyo ezali sinye ya "Certificat ya kobongola" yango na suka ya maboke oyo. Ntango osi ozwi emonisi nayo nyonso esika moko, zinga bakopi oyo ezali sinye mpe oyo ezali na mokolo ya "Certificat ya Mosala(Servisi)" na suka ya maboke oyo nasuka ya esika ya emonisi na yo nyonso. Yango nsima sala kopi mibale ya emonisi na yo nyonso.

Page 15: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 15

Kaka lokola kosalela, mikanda yango ekokende epai ya Mosambisi, kopi na yango ekokende epai ya molobeli ya loyalo mpe okotikala na kopi moko pona yo moko. Soki olingi otinda mikanda na esambelo liboso ya mokolo nayo ya suka na esambelo, tya envelope na nkombo na yo mpe A-nomba likolo na yango. Yango nsima tya maboke na kati ya baenvelope. Moko esengeli koloba " Na Mosambisi ya bapaya(Immigration)" mpe mosusu

esengeli koloba "Na Likambo(litigation) ya ICE." Tona mosali ya boloko asala nyonso ekoma to tya yango na mailbox ya centre ya boloko ete ekomela esambelo mpe na ICE.

4. Kobongisa litatoli na yo

Na eyokami na yo ya suka, okozala na elena ya koyebisa Mosambisi pona nini ozali kobanga kozonga na mboka nayo mpe okanisi esengeli otikala na Etats-Unis. Ezali na ntina kotosa litatoli na yo na mikolo liboso ya boyokami nayo mpo ete okoki kobeta linzaka na mutu! kanga makambo oyo na mutu ntango ozo tosa litatoli nayo:

Mibongisa. Koma liste ya bantina polele pona nini ozo banga kozonga na ekolo mboka na yo. Koloba kaka te makambo lokola "Na kanisi ete moto akosala ngai mabe" to "Na lingi te kozonga." Pesa Mosambisi bandakisa ya likama oyokaki mpasi mpenza na kala mpe likama ozali kobangela. Yebisa ye nyonso okoki koloba. Ezali tango mosusu pasi makasi kosolo na bato oyebi te mpona makambo malekela yomoko. Atako bongo, ezali na ntina ete Mosambisi ayeba lolenge esengeli mpo na esambisi na yo---ata soki ebangisaka, okakatanaka, to mpasi mpona kobimisa yango.

Page 16: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 16

Loba kobima na motema. Mosambisi amonaka bato ebele mokolo nyonso. Okoki kosala litatoli nayo ekoki kotelema na kosolola polele. Kanisa bandakisa ya makambo oyo ozali kobanga na mboka nayo. Sakola na koyebisa bandakisa wana na moninga to moto ya libota mpe koma yango na

papye yango wana okobosana te. Kobanga te soki okomi motema likolo to makanisi na esambelo—esalemeka bato ebele. Soki osengeli kozwa pema, yebisa kaka Mosambisi.

Zala na bosembo. Mosala nayo ezali ya koyebisa Mosambisi

mpona makambo ya bomoi nayo. Soki ozali na makambo ya mabe oyo ekotisa yo boloko mpe Mosambisi atuni yo pona yango, yebisa ye nini esalemaki. Kokosa ekosala kaka makambo ezala mabe makasi, mpe Mosambisi mpe molobeli ya loyalo mbala mingi bazalaka na nzela ya koyeba soki ozali kokosa. Soki osi okenda na kelasi ya kozongisa bomoi ya moto lokola NA to AA, sala nyonso oyebisa Mosambisi mpona yango. Mpe yebisa Mosambisi ndenge nini okokweya na makambo ya mabe te na mikolo ezali koya.

Tuna moto ya libota na yo to motatoli mosusu atatola na

esambelo. Soki ozali na ndeko nayo oyo akanisi ete okosalema mabe na ekolo mboka nayo, to motatoli mosusu oyo azo sunga esambisi na yo, senga moto wana asakola na esambelo. Otalela malamu ete ayebisa Mosambisi pona nini azo kanisa okosalemana mabe na ekolo mboka nayo. Kaka lokola na litatoli na yo, sala naino ete matatoli na yo apesa Mosambisi

bandakisa oyo ezali na ntina ya ndenge nini mpe pona nini okoki kosalema mabe na ekolo mboka na yo.

Yanola mituna ya Mosambisi. Mosambisi akoki kotuna yo

mituna mosusu ya sikisiki. Yoka mituna ya Mosambisi mpe meka koyanola yango na nyonso okoki. Kanisa, zala na limemya ntango Mosambisi azali koloba. lobela na Mosambisi lokola "Mokonzi," "Mwasi," to "Nkolo."

5. Epimelo ya emonisi: Ekateli ya Mosambisi

Page 17: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 17

Na batango mosusu,Mosambisi akopesa yo ekateli na ye ya suka na suka ya boyokami nayo. Akoyebisa yo pona nini akokende kondimela to koboya esambisi na yo. Soki Mosambisi aboyeli esambisi na yo mpe olingi kosenga appel na ekateli wana, osengeli koyebisa Mosambisi ete olingi

kosenga appel. Akopesa yo mokanda mosusu oyo esengeli kotindama na Mokambi ya Appel ya bakimi na kati ya mikolo 30. Kofunda appel, okoki kotala etambwisami ya mosala ya Florence na kolelela esambisi na yo. Na katiya ebele ya esambisi ya "Azile," "Koboya ya Kolongola," pe "CAT," Mosambisi akolinga kopesa yo ekateli ekomami na nsuka ya boyokami nayo ya suka. Soki ezali ndenge wana, Esengeli ozwa ekateli yango na mail ya centre ya boloko nsima ya mwa baposo na sima ya boyokami. Ekateli ekolimbola bantina pona nini Mosambisi azali kondimela to kobeyela esambisi na yo.

6. Makanisi ya Suka

Baesambisi ya "Azile," "Koboya ya Kolongola," pe "CAT" ezali na mindondo. Ezali alima koyoka mpasi motema kolenga pe kobanga pona kolakisa esambisi nayo epai ya Mosambisi, mingimingi mpenza soki ozali koyebisa ye pona makambo ya mpasi oyo ezwa yo to ekoki kozwa yo. Lokola tosololaki likolo, banga koyanganisa emonisi ntongo kosalisa kosunga esambisi na yo. Tuna libota nayo pe baninga kosalisa yo koyanganisa emonisi na ekolo mboka na yo. Esengeli okanisa malamu pona mibeko loyalo esengi pona esambisi. Meka litatoli nayo mpe pesa Mosambisi emonisi ebele lokola okoki pona akanisa yango. Totombeli yo bolamu nyonso na esambisi na yo.

Apendisi 1. Botondisi ya bosengi na yo nyonso

Ba oyo ezali mituna osengeli kotalela pona bosengi na yo I-589:

I-589 Eteni ya A

Page 18: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 18

Adresi ya posita na Etats-Unis

Soki ozali sik’oyo na boloko, pona adresi ya posita nayo, salela adresi ya centre ya boloko.

Likolo ya sika

Likolo pe mwana-mboka na yo ezalaka mbala mingi lolenge, kasi soki okanisi te oyo eza ya solo pona yo, esengeli omonisa yango polele na mokanda ya bosengi .

Likolo pe mwana-mboka na bobotami

Soki osi okeyi na mboka mosusu libela pe ozwi kimwana-ya-ekolo-mboka, likolo nayo na bobotami ekoki kozala ya lolenge mosusu koleka likolo na yo ya sika.

Mimeseno na yo to bato ya bonkoko

Ozali na bato moko ya mimeseno ya mboka na mboka na yo? Pona ndakisa, bato ya Iran bakoki kozala Moasulia to bato ya Gwatemala bakoki kozala Ba-Quiché.

Lingomba na yo

Ozali kosalela lingomba? Soki ezali bongo, tanga yango na etanda oyo ezosenga pona motindo ya losambo na yo. Mituna oyo ezali kotuna yo pona nyonso ya lingomba ya liboso (lokola Bayuda, Baklisto, Babudiste, Bamizilma, b.n.b.) pe lisusu eteni ya ndenge na ndenge etali mingi lingomba wana ozalaka na yango (lokola Ortodokse, to moklisto ya Copte).

Bitamboleli ya kobenganama

Ozali sikoyo na bitamboleli ya kozongisama na ekolo mboka, oyo bazali kobenga lisusu bitamboleli ya kobenganama. Tala etanda wana ezali koloba eeh. Soki okutana na bitamboleli ya kozongisamana liboso ya sik’oyo, tanga yango mpe.

Kobima na yo ya sika-sika na ekolo mboka nayo pe kokota na États-Unis

Soki okotaki kozanga ndingisa to etyolaki mibeko, koma “inspeksio te" pe tya "N/A" esika ezali kosenga "numero ya I-94". Osengeli lisusu tosala liste ya batango mosusu oyo okotaki Etats-Unis, lokola ntango ozwaki mobembo na ba mboka

Page 19: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 19

mosusu. Soki okoki te koyeba mokolo ya solo, tya "ekoki." kosala Mosambisi ayeba ete oyebi mpenza te.

Monoko nini olobaka malamu

Soki olobaka minoko ebele, koma baoyo olobaka pe oyebaka malamu. Soki osololaka nkota moko ya monoko nayo, koma yango mpe. Koma lingelesa kaka soki ozali 100% malamu kosololisa Mosambisi na lingelesa.

Bisika ya baboti

Soki moko to bango nyonso ya baboti na yo basi bakufi, osengeli kaka kokoma bango. Na eteni ya "bisika," koma "Bakufi."

Eteni ya B

Nkombo ya molongani pe bana Tondisa eteni oyo kaka soki obala pe/to oza na bana. Soki esika

ezali te na formilere pona bana na yo nyonso, okoki kosalela "Ebakisami ya Formilere ya A" na nsima ya mokanda ya bosengi to na papela ya pamba na kotya nkombo na yo, nomba, pe sinyatire.

Soki molongani na yo to bana bazali te na kati ya mokanda ya

bosengi mpo na bazali na statut légal, (oyo ezali, bazali bana-mboka ya Etats-Unis to ebongiseli ya kofanda libela), na yango tya "bantina mosusu" pe limbola na kati ya etanda.

Eteni ya C

Oyo ezali eteni ya malonga mingi ya mokanda ya bosengi na yo. Liboso otondisa eteni oyo, okoki kolinga kotala bayanola ya mituna oyo okomaki na eteni ya maboke oyo ebengami "Kanisa pona bosengi na yo." Lisusu, okoki kolinga kokoma makambo na yo esika mosusu lokola deklarasio. Soki okomi deklarasio(declaration)ekambwani, sikoyo yanola mituna na eteni ya C na mokuse pe koma "palado tala deklarasiyo" mpo kaka Mosambisi ayeba ete likambo na yo nyonso esali na kati ya deklarasio.

Page 20: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 20

Kobanga kozonga

Loba pona nini ozali kobanga kozonga na mboka na yo. Kanisa koloba soki ozali kobanga mpo na loposo ya nzoto na yo, lingomba, likolo, makanisi ya politiki, to kozala mosangani ya bituluku ya ndenge na ndenge.

Kokangama na mboka na yo pe na Etats-Unis

Esengeli otya mikakatano na yo moko ozwaki na ekolo mboka na yo (bonyekolami to bobangisami olekela), mpe oyeba ete azali moto ya mobulu ozali na yango na Etats-Unis.

Bobangi bwa yo ya kozonga

Koma makambo oyo ezali kobangisa yo pe nini ekoki koselemela yo soki ozongi na mboka nayo.

Statut légal na mboka mosusu

Soki ozwi mokanda ya kofanda ntii mokimi bitumba libela, esengeli okoma yango awa.

Eteni ya D

Mituna oyo ezali kosenga makambo pona bokokiselami nayo ya "Azile," "Koboya ya Kolongola," pe "CAT"(LEM). Yanola yango nyonso mobimba.

Eteni ya E

Awa ezali esika oko sinye pe kolapa ete makambo nyonso okomi ezali ya solo pe ya bosembo. Yeba malamu, soki oyebi ozali kozongisa mokanda ya bsengi na bobuki lokuta, okokoka te kopema ya ndenge na ndenge epai ya kozongisama.

Eteni ya C

Tondisa eteni oyo kaka soki moto mosusu asalisaki yo kosilisa Mokanda ya bosengi oyo.

Eteni ya G

Esika oyo ekotondisama liboso ya Mosambisi.

Page 21: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 21

Apendisi 2: Kokanisa bosengi na yo Bantina oyo esali Naza koluka Azile, Koboya, Liyangani Epekisaka Minyoko: Pona nini na bimaki mboka na ngai? ____________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Na yango nazali kobanga? _________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Pona nini nazali kobanga bango? Pona nini balingi kosala nga mabe to basusu lokola nga? _______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Nini nazali kokanisi bakoki kosala nga soki na zongi? ____________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ How do I think they will know that I am back? ____________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Ndenge nini nakanisi bako yeba ete nazongi? ______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________

Page 22: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 22

_____________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________Nani mosusu bazali kobundisa & konyokola sikoyo? Bato bazali lokola nga (na loposo, lingomba, likolo, d.n.d?) Nakoyeba yango ndenge nini? ____________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Boyebi na ngai na ntango ya kala Lolenge oyo eleki malamu ya kolimbola likambo na nga epai ya Mosambisi ezali kopesa ye bandakisa ya oyo ezwaki nga. Kanisa pona bamakambo ya sikisiki oyo ozwaki ete etaleli na bosengi nayo, na ndakisa, ngonga ya sikisiki oyo ozalaki atake(attaque) to kobundisama na moto moko to bituluku ya bato. Soki okomaki na makambo ebele ya minyoko, kanisa ya mabe mpenza, to bangonga oyo olingi mingi Mosambisi ayeba yango. Sik’oyo, omituna mituna elandi pona makambo nayo ya kala pona kosalisa yo koyanola mituna ya Mosambisi na bandimbola mosusu: Boyebi 1: Mokolo:___________ Esika:______________________________________________________ Nini ekomelaki yo? _________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Nani asalaki yo bongo? (Na ndakisa, loyalo, polisi, barebele, babituluku ya mangomba, b.n.b...) Lolenge nini okoki koyeba bango? ___________________________________________________________________________________ Pona nini bazalaki kobundisa to konyokola yo?_____________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________

Page 23: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 23

Balobaki nini ntango bazalaki kobundisa yo to kosala yo mabe? ______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Ndenge nini oyebi ete bazalaki kokanela (koloka) yo moko kaka?___________________ ______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Na kati ya bantina mitano oyo nini bakanela yo? Nzinga oyo ekokani: Loposo / lingomba / likolo / bituluku ya bato nyonso / makanisi ya politiki Oyebi ndenge nini? ____________________________________________________________ Nani mosusu babundisaki to konyokola, soki moto mosusu? _________________________ ___________________________________________________________________________________ Boyebi 2: Mokolo:_______________ Esika:______________________________________________________ Nini ekomelaki yo? _________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Nani asalaki yo bongo? (Na ndakisa, loyalo, polisi, barebele, babituluku ya mangomba, d.n.d...) Lolenge nini nakoki koyeba bango? ___________________________________________________________________________________ Pona nini bazalaki kobundisa to konyokola yo? ___________________________ _________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Balobaki nini ntango bazalaki kobundisa yo to kosala yo mabe? ______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________

Page 24: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 24

Ndenge nini oyebi ete bazalaki kokanela(koloka) yo moko kaka?___________________ ______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Na kati ya bantina mitano oyo nini bakanelaki yo? Nzinga oyo ekokani: Loposo / lingomba / likolo / bituluku ya bato nyonso / makanisi ya politiki Oyebi ndenge nini? ____________________________________________________________ Boyebi 3: Mokolo:_______________ Esika:______________________________________________________ Nini ekomela yo? _________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Nani asalaki yo bongo? (Na ndakisa, loyalo, polisi, barebele, babituluku ya mangomba, d.n.d...) Lolenge nini nakoki koyeba bango? ___________________________________________________________________________________ Pona nini bazalaki kobundisa to konyokola yo?_____________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Balobaki nini ntango bazalaki kobundisa yo to kosala yo mabe? ______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________ Ndenge nini oyebi ete bazalaki kanela(koloka) yo moko kaka?___________________ ______________________________________________________________________________________________________________________________________________________________________

Page 25: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 25

Na kati ya bantina mitano oyo nini bakanela yo? Nzinga oyo ekokani: Loposo / lingomba / likolo / bituluku ya bato nyonso / makanisi ya politiki Oyebi ndenge nini? ____________________________________________________________ Nani mosusu babundisaki to konyokala, soki moto mosusu? _________________________ ___________________________________________________________________________________

Apendisi 3. Certificat ya Mosala (Servisi)

Page 26: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 26

Salela certificat oyo elandi soki okopesa mikanda epai ya prokirere ya ICE pe Mosambisi na esambelo. Nga, ________________________(Nkombo nayo awa), natatoli ete nakangola nga moko kopi ya mokanda oyo na emonisi ya makambo ya kosamba na ICE na mokolo ya nse. Sinye: Mokolo: Salela certificat elandi soki okotinda mikanda na adresi ya posita epai ya molobeli ya ICE pe Mosambisi liboso ya koyokama. Nga, ________________________(nkombo na yo awa), natatoli ete tyaki kopi ya mokanda oyo na adresi ya posita ya makamba ya kosamba ya ICE(Litigation ya ICE) na _________________________________ (koma adresi ya biro ya ICE na centre ya boloko ozali kofanda) na mokolo na nse. Sinye: Mokolo:

Apendisi 4. Ndakisa ya Certificat ya kobongola

Page 27: Nazo Banga Kozonga: Botambwisi na Nzela ya Azile ......© FIRRP- makanisi ya suka novɛ mbɛ 2018 1 "Nazo Banga Kozonga:" Botambwisi na Nzela ya Azile, Koboya Kolongola, mpe Liyangani

© FIRRP- makanisi ya suka novɛ́mbɛ 2018 27

Ngai, ________________________(nkombo ya mobongoli), natatoli ete nazali moto oyo akoki mpenza kobongola mokanda oyo kouta na monoko na yango na Lingelesi pe ete kobongala ezali ya solo pe selo na makoki na ngai nyonso. Sinyatire ya mobongoli Dati